AMMAFRICA WORLD

AMMAFRICA WORLD

KINSHASA:Message de son Eminence Papa Simon Kimbangu Kiangani à la Nation

Message de son Eminence Papa Simon Kimbangu Kiangani à la Nation

(Version Lingala)

 
papa_simon_kimbangu_kiangani_999_52_77.jpg


 
Kimbanguisme oyeee
Nkamba oyee
Kinshasa oyeee
e wunuee, e mbaziii, bilumbu bia kulueee, yangalalaaa
esengo to esengo teee, kiese vo ka kiese kue, nsai vo ka nsai kue
 
Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu
 
toyebi ke mukolo ya yenga tolalisaki makambu, tangu ekoki bien ekoki te ? (ekokiieeee) oyo tolalisaki mukolo ya yenga elingi koloba ete temoin ya mutu ezali ye Nzambe, temoin ya Nzambe ezali mutu. Ndenge tolandi histoire na mokonzi oyo awuti koleka, mokonzi ya mabele. Tangu Tata Simon Kimbangu azuaki musala akendaki na Nzundu na chef medaillé, Nzambe apesi nga musala nasala bien nasala te ? Abetaki tolo, sala, trois fois. Ndenge abetaki tolo kuna na likolo pe eyokani makasi. Alobaki na ye ke ndnege ondimi yo nde ya liboso oko kangama, esalamaka pe bongo.
 
Alors makambu ye alobi awa apesi nga makambo minene ye alobi aza kozela reponse. Alobi bongo bien bongo te ? (bongoooo) nga nde nakopesa reponse hein ? (ingetaaa) ah reponse nini nakopesa ye ? (yo moko oyebiiiee) est ce que reponse ya kobebisa mokili bien ya kobongisa mokili ? (ya kobongisaa) ah tata oyo penza hein.
 
Pona bongo reponse ezangi te ya bien ! Soki nalobi ya bien promesse oyo Nzambe apesa na biso ete loposo moyindo akosepela. Bowumbu ya loto motindo esi esila toza kozela kaka ngonga mais biso batu nde tobongisa. Tata Nzambe azali prêt. Tomoni ke mokili eningani ; mokili mobimba eza ya koningana, les cinq continents. Eza likambu ya Tata Nzambe eza koluka nzela na ndenge ete likambu ya Tata Nzambe eya kovanda libela libela na mokili. Pasi ya yo mutu muindu ekosila.
 
Totali tomoni ndenge mokili eza kotambola. Tangu toye na Kinshasa na mbala oyo maloba ya ndenge na ndenge aza koleka mais ya malamu te. Yango nabengisaki ba Nkumu ba coutumiers baya, mukonzi pe abengisi bango nionso bandimi baye. Ba notables ya Congo baye nga moko nde nabengisaki tozala lelo ensemble ke bakonzi ya mangomba baye totala likambu oyo ensemble. Tobongisa, biso kaka te, Afrique na mokili mobimba totala likambu oyo.
 
Ndenge bango balobi le 12 octobre kuna na Nkamba ya 2017 entouka nazo kende kobongisa oyo ya minene minene ebimi awa epayi ya mokonzi ya mabele. Ekangami na se ekangami wapi ? (likolooo) efonguami na se efongiami wapi ? (likoloooo) yango oyo tokokende kobongisa na Nkamba.
 
Ah pona nini toponi kaka Nkamba ? Ebengami Yeluselemi ya sika. Nakanisa le 17 mars 1921 likolo efonguamaka lokola fenetre message eye Nkolo alobi nga naza kokita lobi le 18 kuna na Nkamba. Le 18 mars temoin azalaki papa Tuvumana. Na tangu wana Papa Kimbangu nanu abandi musala te , nanu akangami te mais likolo efunguamaka le 17 mars 1921 lokola fenetre voix ebimi lobi nazo kita na Nkamba. Le 18 wana na tongo papa Tuvumana alingi akende na Lukengo mboka mususu Tata Kimbangu alobi na ye te kokende te zela makambu oyo ekomonana na 12h awa fo ozala temoin. Ndenge tolobi temoin ya mutu Nzambe , temoin ya Nzambe mutu.
 
Lelo oyo bakonzi nionso baye kotala biso nini ekoleka ? Bango nde ba temoins na biso. Esika likambu ya Tata Nzambe eza kobima fo bazala ba temoins. Alors le 18 mars Tata Kimbangu atala na midi Nkolo Yesu akiti. Biso oyo toyebi Nkamba oyo Mausolé oyo Ndaku ya Nzambe, kingo eza wana avant okota na ndaku ya Nzambe croix eza na se. Malgré eza ba carreaux mais batie pembe pona kolakisa esika wana Nkolo Yesu akitelaka bakutanaka na Tata Simon Kimbangu, esika masolo na bango ezalaki. Pona ko annoncer ke tangu ekoki po obanda misala na yo. Basololi esili Nkolo akeyi. Le 5 avril na minuit Nkolo Yesu azongi. Kozonga ya Nkolo Yesu nakoloba ete tangu ekoki lobi le 6 avril obanda musala ya kosalisa batu. Tata Kimbangu alobi luka batu ya mayele nga naza mayele te nakoki te. Ye alobi nga natali na mokili mobimba naponi kaka yo, sala musala wana. Mama Muilu azali koyoka ti alobi na ye malade moko aza na Ngombe Kinsuka awa oza kokende na marché ya Nsona tika kosalisa mama wana aza na malade ya mutu. Tangu basilisi Mama Muilu atuni nani wana bozalaki kosolola na ye ? Ye alobi Nkolo Yesu apesi nga musala nasala. Tata Kimbangu alobi nga nalingi te, non ndima nga nakopesa yo maboko. Ye alobi na ye bon likambu te na tongo tikala kobeta ngonga ya ndaku ya Nzambe. Akeyi. Elakisi ete Moise abimisaki bana Israel na Egypte ezalaki le 6 avril un mercredi. Nkolo Yesu abandaki musala na ye ya miracle, abandaki musala na ye le 6 avril un mercredi. Tata Simon Kimbangu abandaki musala na ye le 6 avril un mercredi.
 
Nkolo Yesu 33 ans nde asalaki na mokili, 30 ans libre. 30 ans wana pona nini azalaki libre ? Po Tata na ye alobaki nanu te abanda musala ye nde avandaki libre. Tangu ekoki kaka apesi ye nzela. Ndenge moko Tata Simon Kimbangu bapesaki ye nzela.
Oyo bino likambu botuni ngayi topesa reponse nzela nanu bapesi te toyokani hein ? (ingetaa) pipilipiiii (piii) malili ekoti pona nini ? Kimbanguisme oyeee(oyeee) nionso ezali prêt toyebi ndenge yakolekela.
 
Nkolo Yesu alobaki boye koya ya Muana ya mutu ekoya ndenge nini ? (lokola muyibi) hein ? (lokola muyibi) nayoki bien te (lokola muyibiieeee) lokola muyibi hein ? (ingetaa) muyibi tangu akotaka na ndaku ya mutu pona koyiba ayebisaka ? (tee) akoyebisa te ! Soki ayebisi tozui mayele. Mais toyebi ndenge akoki koyela. Toyokani hein ? (ingetaa) yango balobaki ke tozala kaka prêt.
 
Mateyi ezali kosopana butu moyi, oza mayele landa mateyi baza kopesa puete obunga nzela te. Kisi nini bapesaka po tobunga nzela te ?
Ngayi tangu batelemisaki ngayi na 2001 apres toyaki voyage na Nkamba, te na Kinshasa pardon , tangu toye voyage na Kinshasa bakonzi nionso ya Congo Central baye kotala ngayi, mutu bapesaki maloba papa Nzolantima, ba papa Ndombasi bazalaki ba papa Kisombe bazalaki, bakonzi nionso ya Congo Central, Papa toye kotala yo. Tokoti kuna na salle, nini elandaki ? Balobi oyo bango bayelaki eloko bapesaki ngayi Bible nasepelaki na motema pona nini balakisi ngayi nzela ya bien, mosali ya Nzambe tomemeli yo Bible. Oyo nionso toza koloba eza na kati ya Bible, oyo tokoluka na kati na Bible. Tata Simon Kimbangu akangami bamemi ye na Mbanza Ngungu bakolo batuni ye otikeli biso nini ? Atikelaka bango nini ? (Bible) makambu nionso eza na Bible hein ? (ingeta) ah likambu nionso okoluka eza na kati ya Bible. Mundele moko awutaki na Israel tangu aye kotala nga na Nkamba eloko amemelaki ngayi Bible ayebi ke Mosali ya Nzambe amemaka nini?(Bible) Kimia eza na kati na bible. Alors ba Musulmans oyo balobi ke bango baza ba chretiens siege na bango eza na Londres tangu baye na Nkamba bamemelaki nga Bible. Nga sikoyo elekeli ngayi po namoni poid ya likambo ndenge ezali. Na tango ondimi sala nionso nga nakoki kolinga te pasi ezala na mokili mobimba. Pasi pona nini ? Lisumu ya Adam et Eve. Tangu basalaki Adam azalaki na pouvoir makasi soki Satan aye komeka te fo abangana Satan. Na Adamu akoki te ake na mama Eve mais akoti na nioka. Soki amemaka nzoto na ye wana ya bomoto nde akokaki te. Tangu akoti na nioka, nioka akomi kolobisa mama Eve, alobi mbuma wana soki bolie yango bokozala lokola Nzambe bokoyeba makambu nionso . Alors mama Eve esika wana akueyi, ye moko pe a sentir ke abebisi. Tangu ayebisi mobali na ye , mobali aboyaki aboyaki. Awa ozoboya nga toza kaka biso mibale okotika nga wapi ? Fin des fins Adam aye kokueya elakisi ke bazui kindoki. Kindoki wana nde lelo eza kosala makasi. Kindoki wana bapeselaka yango na nini ? Biloko ya kolia hein ? (ingetaa) batu mingi babebi. Asengi na ye te kasi muana batu bapesi ye eloko ya kolia abebi po ye alingi kokende ye moko te. Mokili ebebaka te, ebebi.
 
Na tango ya Noe tangu emonani ke pasi eleki masumu eyokani solo epayi ya Tata Nzambe ye atindaki Noe asala masuwa. Tangu asalaki masuwa baza koseka ye mais mbula tangu ebandaki batu batelangani bakomi koluka Noe afongola. Noe alobi te fongola eza na ngayi te Nkolo akendaki nango, batu babebi, bakufi solo eyokani epa Tata Nzambe, toyebi histoire. Sima nango oyo babikaki bazalaki huit : Noe, muasi na ye, bana na ye misatu na ba bokilo na ye misatu. Tomoni ke masumu esili kasi tangu babotami, babotami kuna na Angola na Mbanza Kongo nini elandaki ? Masumu ezongi lisusu nani azalaki na lisumu wana? Nioka alataki muasi ya muan aya liboso Cam mutu muindu. Masumu ezongaka te ezongi. Bozolanda hein ? (ingetaaa) reponse nazo pesa na Nkumu.
 
Tangu masumu ezongi lisusu Nimerode ye nde aza base ya batu nionso aza ko diriger alors likanisi ya mabe eye Babel. Tangu baza kotonga Babel ya kala vraiment masumu ezalaki mingi , Nzambe alobi ah kala mingi te nabebisi bango na mayi bazongeli makambu na bango sikoyo tokosala ndenge nini ? Alobi na Noe pesa bango minoko misusu. Eye komonana ke tangu baza kotonga maçon soki asengi mayi oke kozuela ye brique, soki asengi ciment oke kozua zelo. Eh incomprehension ekoti. Sikoyo minoko eye ! Oyo alobaka na anglais bazuani na mutu wana bakeyi . Oyo balobaka français mususu aye bazuani bakeyi. Oyo balobaka na kikongo bayokani bakeyi, minoko nionso ya mokili ok tshiluba, oh kikongo oh lingala oh kishoko nionso ya mokili sikoyo topanzanaka te topanzani. Alors na Tangu wana Nzambe azalaki kobebisa mokili. Sodome na Gomorhe ebebi na kanda tomoni ke bakoti bowumbu na tangu ya Abraham ti baye kobima ti Nkolo Yesu aye kobotama, akufi.
Nzambe soki alingi abebisa mokili Nkolo Yesu fo aloba Tata limbisa bango, libimsa bango nga nakendaki kokufa pona bango. Nzambe apesi pouvoir na nani ? Na Muana. Mokili oyo nani akosambisa yango ? (Nkolo Yesu) Nkolo Yesu hein ? (ingetaa) boyebi yango ? (ingetaa) hein sikoyo Nkolo Yesu akosambisa mokili.
 
Alors Nkolo Yesu amoni ke non mokili pe bayokaka te musala ya Tata ezali kokufa. Alobi Simon Kimbangu, malgré ke balobaka ke tosambelaka mutumais azali motindami ya Nkolo Yesu, Simon Kimbangu mosala ya Tata eza ya kolala kende kolamusa mosala ya Tata.
Tata Simon Kimbangu aye oyo nionso basalaki ye toyebi yango. Ekeke ya mineyi eza na maboko ya Tata Simon Kimbangu.
Nkumu alobi ya solo ndenge oyo toza kolanda, biso bateyi biso mingi na ba Papa. Kobanda na Papa Kisolokele, Papa Dialungana, Papa Diangienda Kuntima toteyami mingi na oyo tozali komona na misu. 1991 Papa Diangienda alobi tangu tokokoma na l’an 2000 pasi ebandi ya makasi, signe de temps ekomonana, epayi tozokende kokabuana ekozala makasi ti na ba famille ndenge bobotami tata moko, mama moko. Kosuana pe ekozala makasi, kobunda pe ekozala makasi, guerre, makambu nionso toza komona. Biso toza bapaya te elakisi ke koya ya Muana Mutu ekomi pene. Oyo ye moko Nkolo Yesu alobaki tangu mokili ekoningana tangu wana pe pasi ya likambu ekozala surtout ba mama oyo bamelisaka bana , ba mama oyo bamemaka mukumba. Nzete oyo babengaka musuke soki bomoni ke makasa nango nionso ekueyi yebaka pasi et soki omoni ke matiti ebandi kobota mbula ekomi pembeni po ebanda kobeta. Likambu nionso eza na tangu nango
alors tolobaka tangu nionso biso batu tovandi na ville tozalaka mayele tokotaka makambu bikotela te mokili oyo Nzambe mutu a dirigeaka yango. l’État Nzambe mutu akitisaki yango, eza na mibeko nango, lingomba, Nzambe, pona nini ? Tata Simon Kimbangu tangu akitaki na mokili kaka kuna na Nkamba bakolo batunaka ye omemeli biso nini? Alobi l’État, lingomba pe munoko ya kikongo biloko misatu wana Nkolo apesi ngayi. Ba musulmans balobak nini ki arabe hein ? (ingetaa) bongo ba catholique ? (latin) latin hein ? (ingeta) ebongo biso ba kimbanguistes tokoloba nini ? (kikongo) boza sur nango ? (ingetaaa) ha tozala sur kasi oyebi ke tozo kende na suka yeba Nzambe na yo. Pona nini ndoki etamboli ya marque mingi ba magiciens bazali, ba ndoki bazali, ba fetiches ya ndenge na ndenge. Eh sikoyo tangu ekoki likambu nionso ezalaka na limite nango.
 
Nkumu alobi ke 2011 tobimisaki Tata Simon Kimbangu na boloko. Bango moko ba Nkumu balobi niata poso tokobeta lisusu mbuda ya butu te kasi nini ? (ya moyiii) et lelo oyo makambu toyoki awa mokili bapesi na nani ? (na Papa Simon Kimbangu) est ce que nionso eza kolobama awa Nzambe aza koyoka to te ? (aza koyokaa) azoyoka hein ? (ingetaa) yebaka soki opesi permission na mutu eloko wana ekoleka te hein ? Ekosalama bien ekosalama te ? (ekosalamaa) hein mokili eningani non ? (ingeta) ya mbala oyo akotika esika moko te ! Esika moko ekotikala ezali te po tolingi tokota na mokili ya sika, mboka ya sika. Tala kaka Nkolo Yesu azu bayekoli mutu azalaki matata mingi Petelo, Simon Pierre. Ateyi ateyi aie ye lokola aza ko pecher ba mbisi koliesa famille, soki natiki musala oyo nalandi yo famille na nga ekotikala na nzala. Mais kino azuaki ye. Lisanga ya bayekoli balobi ah biso totiki ba familles na biso, ba mamas batikali, basi na biso batikali, bana batikali tolandi yo okofuta biso nini ? Reponse ya Nkolo Yesu bomoyi ya seko, boyebi yango hein ? (ingetaa) bomoyi ya seko. Oyo asalelaka Nzambe na solo bomoyi ya seko ekozala na ye bien ekozala na ye te ? (ekozala na yeee) po elobamaka mingi bino batu bosambelaka bozuaka nini ? Balobaka bien balobaka te ? (balobakaa) hein biso toza kolanda bomoyi ya seko. Oyo ekozala ke tangu wana soki ekoki likambu moko ekosalama na mokili banda Nzambe asala mokili nanu emonana te. Nakanisa totikali lisusu mosika te hein ? Nga moko nayebi ? (ingetaa) oh bino boyebi yango te ? Likambu munene ezali wana.
 
Oza nayo libre, ozo sala nionso oyo yo olingi mais mukolo moko eza kozela biso. Yango nde ekozala pire pasi, place okokimela ekozala te. Mondele na mutu muindu tangu bakolinga biso ah pasi ekozala. Pasi ekozala ! Batu balingi toli te batu balingi koyoka te, balingi kosala oyo balingi. Nzambe apesi permition te ! Toyebi Jonas hein Yona ? (ingetaa) akimaka non ?
 
Papa Katembo, Papa Mario, pona kolakisa ke oyo toza koloba eza na Bible suka ya likambo elingi komonana kasi yo mutu muindu oza na devoir munene. Oza na devoir munene yo mutu muindu yo nde ya yambo Nzambe akelaka na mokili oyo. Nzambe alingi kozongisa biso na place na biso ya liboso mais toza koyeba yango te toza kososola te, tozo tosa l’État te, tozo tosa Lingomba te, makambu nionso ya pasi, donc Nzambe totie ye mukongo. Or towelela nanu bokonzi ya likolo oyo etikali nde tokozua yango. Parce que soki totali bien crise ya liboso ekotaki na mokili na tangi ya Abraham. Abraham akielaki wapi na Egypte. Akendeki na muasi na ye, alobi na muasi soki batuni, ou bien nga soki batuni toza ndeko. Alors mukonzi wana alingaki abebisa Nzambe agangeli ye. Alors oyo elakaki kuna sima nde Nzambe apesi biloko mingi na Abraham nde kozonga azongaka na mboka na ye.
 
Totali ya mibale Joseph bateki ye kuna akendaki mukonzi aloti ndoto, toyebi makambu nionso wana. Eluki nani ba nganga ya ndenge na ndenge bake bakoki te kasi nani Joseph ndoto na yo mokonzi elobi boye na boye. Nionso wana biso totikaka Nzambe na sima, totiaka Nzambe liboso te. Parce que makambu ekueyi na mokili eyebani ke ekozalela boye. Mais biso tozo bakis amakambo mosusu oyo ezali ke epesa kanda na Nzambe. Ce que likambu eza kolukama, tosila biso nionso mbala moko. Alors tozala mayele
allez boteya biso nanu na chapitres oyo.
 
PAPA KATEMBO AZUI MATEYI NA BISIKA OYO :
 
Jonas 3 : 1 – 10 Josue 1 : 1 – 9 Hébreux 12 : 25 – 28 1 Pierre 2 : 6 – 10
 
KOLIMBOLAMA YA PAPA KATEMBO PE PAPA MARIO
 
Koya toye bakonzi nionso pe baye kosambela na biso elongo. Oyo maloba elobami epayi ya mukonzi ba chef coutumiers, ye mutu atalaka RDC mobimba, makambu ya makasi mais reponse na ngayi ezali boye : likambu ekosalama, likambu wana biso toza lisusu na niongo te. Niongo te toza kolongola toza kotonga Yeluselemi ya sika. Awa boye biloko babongisi pona biso a bientôt toko banda komona yango na misu. Etikali elembo moko. Elembo wana soki tomoni yango kaka toyebi ah tango ekoki. Elembo moko tokomona na mokili mobimba oyo bakopesela biso raison biso loposo moyindo. Po baniokolaki ba koko na biso baniokolaki Tata Simon Kimbangu liloba etikali lisusu na biso te. Yango toza kowelisa Musee, tozowelisa kotonga Yeluselemi puete tosilisa niongo. Mais liloba etikali na bango bakangaki Tata Simon Kimbangu, na oyo nionso balobaki mabe bakokende matabisi na ndenge baniokolaki Tata Simon Kimbangu na mokili oyo. Kasi soki osalaki bolamu na Tata Simon Kimbangu yebaka ke okobika.
 
Tosilisi bongo na kombo ya Tata, Muana pe Molimo Santu, Amen
 
 
Transcription : Mama Lydia Nkodia Muadi
Responsable Service des Nouveaux Medias Ratelki Europe
 
 
 
AMMAFRICA WORLD


28/08/2017
1 Poster un commentaire

A découvrir aussi


Ces blogs de Politique & Société pourraient vous intéresser

Inscrivez-vous au blog

Soyez prévenu par email des prochaines mises à jour

Rejoignez les 1507 autres membres